Chris Makaka...
Mon grand frère...
Lelo motema ezali kolela,
Nakoki kondima te ete okende.
Pourquoi la vie ekomi boye ?
Pourquoi osundoli ngai noki boye ?
Nazalaki nanu na posa ya koyoka mongongo na yo,
Nazalaki nanu na posa ya kotambola elongo na yo.
Lelo ndako ekomi pamba,
Motema na ngai etondi na mawa.
[
Chris Makaka, ozali na motema na ngai.
Nakobosana yo te, ata mokolo moko.
Bolingo na yo ekotikala seko,
Mpo ozalaki frère ya motuya.
Lala na kimia, mon frère,
Nzambe azala pene na yo.
[
Ata soki miso ezali kobimisa mpinzoli,
Nakomikundola nyonso oyo osalaki mpo na ngai.
Ozalaki makasi na ngai,
Ozalaki esengo ya libota.
Lelo motema ebukani,
Kasi bolingo na yo ekokufa te.
Soki nakotala likoló, nakomona elikya.
Nandimi ete ozali na maboko ya Nzambe.
Mokolo moko tokokutana lisusu,
Mpe nakopesa yo mbote na esengo.
Chris Makaka, mon frère bien-aimé,
Ozali seko na motema na ngai.
Nakolela yo, kasi nakobosana yo te.
Lala na kimia, mon frère.
Tokokutana lisusu mokolo moko.
Bolingo na ngai mpo na yo ekosila te.