Lelo makambo lobi makambo, nalembi eh eh.
Lelo bitumba lobi koswana, nabaye eh.
Naboyi kobebisa nzoto na manzaka, nalembi eh.
Mario, nalembi ye ye eh.
Mario, na baye eh eh.
Extraits des couplets clés
Oh Mario, luka ata mwasi yo moko obala.
Mario mosala kolinga ba mama mobokoli, basuka yo te ? Yo mutu ozali na ba diplômes mitano Mario, luka nano mosala.
Ba produits nga na pakolaka, nzoto ekoma sembe sembe.
Oko bete nga na zoka, lobi na zwa maladi ya cancer.
Libi tango na kopolo yo okimi nga eh. Bima bima na ndako na ngai Mario.
Mpo na nininiongo ya kolinga ?
Likambo moke, mosala ko boma biloko ya ndako na somba en.
Nalembi eh, Mario na baye yo. Mario akuti nga na biloko mobali mosusu asomba.
Oyoka elengi ya kovanda te Mario ?
Kaka soki zuwa ekangi yo na poitrine.
Olingi kaka kobeta nga na koboma biloko. Tokende kosala promenade, tokomi na nzela.
Mario alobi na ngai : Yo zonga côté nga na zali.
Nakumba voiture mpo bamona que nga moto nasombi yo yango.
Mario atuteli nga voiture na nzete.
Nzoto ezali nanu ya même, olingi obebisa nga elongi.
Il paraît basi nionso ozwaka mosala kobebisa bango bilongi.
Epayi nga na stopper, nalembi yo.
Mario papa na baye yo oh.