Intro – Lokumu]
Na baoyo nyonso VIH ezwaki bomoi na bango,
Na baoyo bazali kokoba kobunda kino lelo,
Na minganga, balukiluki mpe mabota oyo balelaki na kimya,
Mpiko na bino ekotikala na mitema na biso.
Lisolo na bino ekobunga te,
Tokoyemba mpo na kokundola bino.
[Couplet 1 – Lisolo ya etumba]
Eumeli bambula mingi, lisolo oyo ezali kotambola na mokili,
Maladi moko ebongolaki bomoi ya bato mingi.
Plus de 40 millions de personnes babungisaki bomoi na bango,
Mpe lelo, près de 40 millions de personnes vivent avec le VIH na mokili.
Sima ya mitango wana ezali elongi ya moto,
Ezali libota, ndoto mpe bomoi moko.
Bato mingi bakutanaki na pasi,
Kasi elikya ezali nanu kopela.
[Refrain – Elikya]
Kozala na VIH ezali suka ya bomoi te,
Nzela ezali nanu liboso na yo.
Okoki kolinga, koluka ndoto mpe kotonga bomoi na yo,
Ozali moto liboso ya maladi.
Kobanga te, komitungisa te,
Bomoi na yo ezali na motuya.
Na bondimi, bolingo mpe lisungi,
Okoki kokoba kotambola.
[Couplet 2 – Mikakatano na Afrika]
Na Afrika, etumba ezalaki monene,
Na kati ya maladi mpe mikakatano mingi.
Système ya santé esengelaki kobunda,
Na bozangi makoki mpo na kobatela bato.
Koluka biyano, kosala ba solutions,
Ezalaki nzela ya mpasi mpe molai.
Kasi basi mpe mibali batikaki te,
Bazalaki kosalisa, koluka mpe kokende liboso.
[Couplet 3 – Stigmatisation]
Kasi mpasi mosusu ebimaki na kimya,
Ezalaki kotyola mpe koboya bato.
Bato mosusu babombaki solo na bango,
Pamba te bazalaki kobanga kosambisama.
Tosundola bango te,
Tosalisa bango na bolingo.
Liloba moko ya malamu, loboko moko ya lisungi,
Ekoki kobongola bomoi ya moto.
[Pont – Elikya ya sika]
Mbula na mbula, elikya ezali kokola,
Boyebi ezali kokende liboso.
Ba traitements ya sika lokola Lenacapavir,
Ezali komonisa ete elikya ezali nanu.
Kasi elonga ya solo ekozala na mitema,
Na kondima mpe boyokani kati na bato.
Tosalisa, tokamba, tobatela bomoi,
Pamba te elongo tokoki kokende liboso.
[Outro]
Na baoyo bakufaki, tobateli bokundoli,
Na bazali na bomoi, topesi elikya.
Liso