opesaki ngai impression ya kozala bolingo ya kokoka ndenge nazalaki koluka, opesaki ngai impression ya kozala mobali ya bandoto na ngai, kasi ozali nde cauchemar ya bomoi na ngai. Obebisaki bandoto na ngai mpe ba ambitions na ngai ya mwasi malamu oyo azalaki na mabe te. Na tango nyonso ya boninga na biso mpe ya fréquentation na biso, ozalaki kosala lisano moko : opesaki ngai impression ya kozala mobali ya kokoka selon ba critères na ngai. Oyebaki ndenge ya kosakana na ba impressions na ngai tango otunaki ngai ba critères na ngai ya mobali idéal. Nazalaki naïve tango nazwanaki motuna wana ya bozoba. Naïveté na ngai epesaki yo ba portes nyonso mpo osala jeu ya ba impressions na yo.
Opesaki ngai impression ya kozala intelligent, kasi intelligence na yo ezali manipulatrice, stupide mpe impressionnante. Opesaki ngai impression ya kozala mobali sympa, kasi ozali mobali toxique. Ozali cauchemar ya bomoi na ngai, jeune homme mpe bel homme oyo alati mpe amibongisaka malamu tango nyonso, kasi na caractère ya mabe, lokola nkosi na zamba oyo ezali kobebisa kimia mpe esengo ya bato mosusu.
Opesaki ngai impression… ooooh opesaki ngai impression… ooooh mobali na ngai kitoko mpe toxique, manipulateur, ooooh soki kaka ozalaki vraiment impression oyo opesaki ngai, nyonso elingaki kozala impressionnant, chéri. Opesaki bandoto na ngai impression ete enfin ozali réalisation na yango. Omimonisaki lokola moto malamu, kasi mpo na nini même bato ya mabe balukaka bato malamu lokola partenaire ?
Ooooh mobali na ngai kitoko oyo amibongisaka malamu tango nyonso, oooh chéri, impression ya mabe ndenge nini. Mpo na nini ozali te na image ya beauté na yo ya libándá ? Ozali pourriture mpe ngai nazali casserole oyo ezipami na couvercle mpo ebomba bilei oyo ebebi, mpo obebisaki bomoi na ngai. Ooooh, bomoi na ngai ekómi dégoûtante, olongolaki ngai fierté na ngai. Oooh bel homme, nazalaki kokanisa ete tozalaki ko matcher na ndenge ya nzoto mpe na kati ya motema, kasi kati na yo ezali pourriture. Oooh ch