eh…
Mama Flora oooh
Nalembaka te koloba merci
Po yo nde makasi ya bomoyi na ngai
Urgel Nika…
Mama Flora, obotaki ngai na pasi
Obokolaki ngai malembe malembe
Mokili ezalaki kobeta ngai maboko te
Kasi yo okobaki kolendisa ngai
Ntango nyonso nazalaki na mpasi
Yo nde ozalaki pembeni na ngai
Na butu lokola moi
Ozanga pongi mpo na bomoyi na ngai
Mama Flora ngai naleli yo malembe
Bolingo nayo eleki motema
Nakofuta yo ndenge nini mama
Po nyonso nazali ewuti na yo
Mama Flora aaaah
Yo nde mapamboli na ngai
Nakoyemba kombo nayo
Tii mokolo ya suka
Béni Mbemba Ngambou… merci mingi
Naomi malembe malembe
Emmanuel Mbemba, tokende liboso
David Moukoury mwana na ngai, Nzambe abatela yo
Bato mingi bakimaka tango pasi ekomi
Kasi yo mama okimaki ngai te
Ata nazalaki na maboko pamba
Yo olobaki : “Mwana na ngai akolonga”
Lelo soki bato bayebi ngai
Ewuti na malembe nayo mama
Mayi ya miso oyo osopaki
Nzambe ayokaki mabondeli nayo
Mama Flora ngai nakopesa yo lokumu
Po ozali mwasi ya motema
Ata mokili eboya ngai nyonso
Yo okotikala mama na ngai
Mama Flora oooh
Bolingo nayo suka ezali te
Urgel Nika ayembi mpo na yo
Mama ya motema…