(Refrain)
Courageux, courageux
Zala courageux
Courageux, courageux
Zala courageux
(Couplet 1)
Na bomoyi, zala courageux
Ata mikakatano ebele, tika te kotika nzela
Humilité nde ememaka na lokumu
Zala courageux, batela valeur na yo
Soki nyonso epesami nzela
Kasi nyonso ezali na tina te
Zala courageux, lobi okoyeba
Soki ofandi Nzambe akobatela yo
(Couplet 2)
Nzambe akitisaka bilei te
Na mutuki ya moninga
Courageux aliaka na makasi na ye
Tika malembe, bunda pona bomoyi
Mama alobaki na ngai : zala courageux
Moto ya makasi abangi te
Courageux ayebi ndaku ya nganga te
Atelemaka na makolo na ye
(Couplet 3)
Soki oyebi esika owuti te
Ndenge nini okoyeba esika okokende ?
Ba jeunes ebele babungi nzela
Likolo ya biloko ya mokili
Entourage mabe ezali kobebisa bango
Ko zala moyibi ezali soni ya libota
Zala courageux, pona nzela ya solo
Bunda mpo na bomoyi ya malamu
(Refrain)
Courageux, courageux
Zala courageux
Courageux, courageux
Zala courageux