Paroles des chansons chrétiennes
Titre : Mon Histoire
A/c :
Interpreté : Mike Kalambay
Couplet 1.
Naye liboso na yo,
Kosopa nde motema na nga,
Naloba nionso osaleli ngai eh,
Oyo osalela nga eleki minene ,
Naye na yo Yesu eh,
Kosopa nde motema oyo ya nga,
Ngai, nazui pe lisolo ya kobeta,
Ya kobetela baninga na ngai
Naloba nionso osaleli ngai
Oyo osalela nga eleki minene,
Yahwe, nga moto bazalaki
kobenga nga Salomon,
Opikola ngai na salon
okotisa nga na chambre,
Olandi nga na chambre,
Okuti nga na etoko
Ozui nga na etoko,
Omatisi ngai na mbetu
Olandi ngai na mbeti, opesi nga pongi
Osuki wana te olandi ngai ti na pongi
Ba cauchemars, ba attaques ya butu,
tu as gagné
Ba ndoto na nga,
ekoma nde ba Rhema
Yahwe ! ozua nga mosika na ngolu na yo
Olatisi nga chemise kaka na ngolu
Olongela nga bitumba kaka na ngolu
Ata lola nakokota na ngolu eh,
Couplet 2.
Bolingo na yo Yesu na ngai eh
Etindi nga nayemba loyembo,
Nangumba mabolongo ya
motema na nga
Nabuaka motole ya bibebu na nga
Nafungoli robinet ya masanjoli
Pe bongo nasopa maloba
mpaka malasi
Naloba nionso osaleli ngai eh
Olongisa nga monguna na Satana
Oyo ezalaki mosika ekomi pembeni
Oyesi pete nionso ezalaki makasi
Okamuisa ngai ndenge
omesana kokamuisa
Nabala, nasala effort te
Yesu, naboti, nasali effort te
Nakoma mwana na
Nzambe na makasi ya nzoto te
Okomisa nga mosali, nasala effort te
Duo :
Nionso wana Yesu Nzambe na ngai
Bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai
Chœur :
Eh yahwe oza bolingo
Eh Yahwe Oza malamu
Eh Yahwe Namoni na miso
bilaka na yo
Bolingo na yo pona ngai
Mawa na yo pona ngai
Nionso ya yo, ekomi ya ngai
Elonga na yo, ekomi ya ngai
Esengo na yo, ekomi ya ngai
Kimia ozali, ekomi ya ngai
Bokonzi na yo, ekomi ya ngai
Kembo na yo, ekomi ya ngai
Eh Yahwe...
(Yaaaahweeee)
Oza bolingo...
(Anh bolingo na yo nde kombo na yo)
Eh Yahwe...
(Bolamu na yo pona ngai)
Oza malamu
(Yesu, okanisi osali yango
na nko Nzambe ya bomoyi)
Eh Yahwe...
(Yahweeee Yahweh..