JEANNE LA MIGNONNE
Intro (parler doucement)
Jeanne la mignonne...Oyebi te ndenge nyonso ebandaki...Avant même que nakutana na yo,motema na ngai ezalaki déjà koyeba yo...
Couplet 1
Avant de voir ton visage,Namonaki yo déjà na mabondeli.Quelque chose me disait au fond de moi,"Faut jamais laisser passer cette fille-ci."
Nazalaki koluka koyeba yo malembe malembe,Sans savoir que mon cœur prenait déjà ton chemin.Puis est arrivé ton sourire,Et tout est devenu différent dans ma vie.
Misu na yo...Ezalaka lokola lumière na butu.Esengo na yo...Ebenganaka mawa nyonso na motema na ngai.
Refrain
Jeanne la mignonne,Yo nde esengo ya motema na ngai.Jeanne la mignonne,Yo nde rêve oyo Nzambe atindeli ngai.
Soki ozali mosika,Motema elukaka yo tango nyonso.Nalingaka koyoka mongongo na yo,Koseka na yo, kosolola na yo.
Jeanne la mignonne,Nakomi komona lobi na miso na yo.
Couplet 2
Nasepelaka te kaka mpo ozali kitoko,Kasi mpo na makasi oyo ozali na yango.Ozali mwasi ya misala,Mwasi oyo abundaka mpo na avenir na ye.
Jour après jour,Namonaka courage na yo.Et chaque fois que tu avances,Nasepelaka lokola ezali victoire na ngai moko.
Yo ozalaka présent,Ata na ba moments ya malembe.Et sans vraiment t'en rendre compte,Ozongisaka couleur na mokili na ngai.
Pont
Mikolo mosusu,Pe ba tempêtes ekoya.Mikakatano ekobeta porte na biso.
Kasi soki osimbi loboko na ngai,Nakotika yo te.Tokoleka nyonso ensemble,Na bolingo, na bondimi, na motema moko.
Dernier refrain
Jeanne la mignonne,Soki mokolo moko okoloba:"Nalingi yo."
Nakobatela maloba wanaLokola trésor ya motema.
Jeanne la mignonne,Yo nde prière oyo ekomaki réalité.
Yo nde nzela oyo nazalaki koluka.Yo nde esengo oyo Nzambe apesaki ngai.
Jeanne la mignonne...Tikala pembeni na ngai...
Nakotambola na yo...Lelo, lobi...Pe kino suka ya nzela.