[Couplet 1]
Ezalaki lokola ndoto,
Bolingo na bango neti lisapo ya koseka,
kasi mitema ezui kimia ya solo.
ARTUR atondi na esengo,
mpo LINA azali likabo ya motuya.
Kisi ya LINA nde YESU,
kisi mosusu komikitisa.
Bolingo ya solo eboti esengo,
mpe ekangisi mitema na bango.
[Pré-refrain]
Tango bapolaki mvula na ebandeli ya libala,
mopepe, bambonge, minioko mpe kolela ezangaki te…
Kasi YESU atikaki bango ata moke teeee.
Alobaki :
“Lina, zala makasi,
miso na yo etala na ngomba.
Okomona mpe okotatola
ete YESU azali malamu.”
[Refrain]
Bolingo emati kati na mitema,
bango bakomi eloko moko kati na libala.
Bolingo emati kati na mitema,
bango bakomi moko libela.
[Couplet 2]
Lelo nyonso ebongwani,
ARTHR apambwami kozua mwasi ya mayele,
likabo kowuta na NZAMBE.
Bozali ndakisa kitoko ya libala
mpo na bato mosusu.
Nzambe abatela bino,
apesa bino bolingo, kimia mpe mapamboli,
mpe nyonso ekende liboso.
[Outro]
Bozali fololo kitoko
ya bolingo ya solo…
Bolingo oyo ewuti epai ya NZAMBE
[Refrain]
Bolingo emati kati na mitema,
bango bakomi eloko moko kati na libala.
Bolingo emati kati na mitema,
bango bakomi moko libela.