Refrain :
Tia matoyi Mokonzi e, yoka losambo la nga,
nabeleli na yo Jéhovah Rapha, elikya na nga se na yo.
Mokonzi okoya kotala nga ntango nini ?
Yokela nga mawa, nazangi makasi ;
bikisa nga, nzambi nalembi.
Choeur : Motema mwa nga mokomi kobanga,
nsomo ya liwa ezingi nga, nani akobikisa nga ?
Nalembi na kolela butu mpe moyi,
mbeto mobimba epoli na mai na miso,
Yaka kobikisa nga, Nzambe na Tobia.
Choeur : Mobikisi ya babeli, Mobikisi ya Bartimeo,
Mobikisi ya bokilo wa Petro, Mobikisi ya mwasi kotanga makila,
Nani akokani na yo ?