[Intro]
Yehova tosepeli, tosepelisaka yo
[Verse 1]
Tokumisi nkombo na yo mpo na mapamboli, lokumu
Ozalaki na biso N’ebandeli tii na nsuka
Ndako etɛlɛmi, esili; yo nde mosungi
Totongaki n’esengo, tozwi mpe baninga mingi
Makambo tomoni, tokobosana Yango te
Elimo santu na yo esungaki biso mpenza
Tosepeli mingi lokola Ozwi lokumu
[Chorus]
Yehova, ezali lokumu, kotonga ndako mpo na yo
Tiká tókoba kosalela yo libela, tókumisa yo na nyonso
Yehova, ezali lokumu, kotonga ndako mpo na yo
Tiká tókoba kosalela yo libela, tókumisa yo na nyonso
Ee Yah, kotongela yo ndako, ezal’ lokumu obongi na yango
Tobondeli y’ondima yango, ebakisa nkembo na yo
[Verse 2]
Nyonso tokoki kopesa yo, yango eutaka na yo
Oyo nyonso toza’ na yango, topesi yo na esengo
Tata, tiká n’esika oyo, tóya kokumisaka yo
Bato báya kobakisama, ematisa lokumu n’o
Awa topesi yo ndak’oyo, tokobatelaka yango
Etikala pɛto, kitoko, etatola nkombo na yo
[Bridge]
Topesi yo esik’oyo, báyeba nkombo na yo
Topesi yo esik’oyo; tiká ondima yango
[Chorus]
Yehova oyo ezali komonisa bolingo
[Outro]
Tosepeli, oyo suka na esengo, tozongiseli yo Nzambe ya bolingo matondi
Yehova na biso, lokumu na biso, Nzambe ya ndako na biso