Refrain (rythmé)
Toli na yo, eza ya kokamwa oh !
Mayele na yo, eza monene mingi !
Ofandi likoló, likoló ya nyonso,
Ozali Mokonzi ya molongo mobimba !
Misala na yo, eza ya nkembo,
Makanisi na yo, eza mozindo !
Nzambe na nguya nyonso,
Ozali monene libela !
Strophe 1
Na motema na ngai, nkombo na yo etondi,
Tata ya seko, Mokonzi ya bolingo,
Nzambe oyo ayokaka mabondeli,
Yo kaka, ozali Nzambe ya solo !
Nkolo ya likoló mpe ya mabele,
Ozali Mokonzi ya seko !
Refrain (retour)
Toli na yo, eza ya kokamwa oh !
Mayele na yo, eza monene mingi !
Ofandi likoló, likoló ya nyonso,
Ozali Mokonzi ya molongo mobimba !
Misala na yo, eza ya nkembo,
Makanisi na yo, eza mozindo !