Couplet 1 :
Makasi na ngai eleki ya yo té Nzambe,
Bozwui na ngai eleki mpe ya yo té Nzambe na ngai,
Nionso naza na ngo ewuti epai na yo,
Kaka yo moto opesaka, eh Yahweh…
Na kotambola na bomoyi, nayebi solo moko,
Ata nazali na nini, ezali nyonso ngolu,
Naza na ngai moko te, nyonso ezali ya yo,
Yo nde mobateli, yo nde liziba ya bomoyi…
Chœurs :
Yahweh eh… Yahweh eh…
Nionso ewuti na yo (na yo Nkolo)
Yahweh eh… Yahweh eh…
Ozali nionso pona ngai.
Refrain :
Nionso ezali ya yo (ya yo Nzambe)
Nionso ewuti na yo (eh Yahweh)
Naza pamba soki ozali te
Ozali nionso pona ngai
Nionso ezali ya yo (ya yo Nkolo)
Nionso ewuti na yo (mokeli na ngai)
Makasi na ngai ewuti na yo
Bomoyi na ngai eza na yo
Couplet 2 :
Naza nini, naza na eloko té,
Soki okangi loboko, ngai nakokoka te,
Naza nini, espoir na ngai eza na yo,
Soki ozali te, bomoyi na ngai esili oh…
Bato bakoki kotala ngai ndenge mosusu,
Kasi yo oyebi ngai malamu koleka bango,
Oponaki ngai ata nazalaki pamba,
Opesi ngai motuya na bolingo na yo…
Chœurs :
Yahweh eh… Yahweh eh…
Nionso ewuti na yo (na yo Nkolo)
Yahweh eh… Yahweh eh…
Ozali nionso pona ngai.
Pré-refrain :
Naboyi komikumisa, nyonso ezali yo,
Naboyi komitombola, lokumu nyonso ya yo,
Bomoyi na ngai, maboko na ngai,
Napesi yo nyonso Nzambe na ngai…
Refrain :
Nionso ezali ya yo (ya yo Nzambe)
Nionso ewuti na yo (eh Yahweh)
Naza pamba soki ozali te
Ozali nionso pona ngai
Nionso ezali ya yo (ya yo Nkolo)
Nionso ewuti na yo (mokeli na ngai)
Makasi na ngai ewuti na yo
Bomoyi na ngai eza na yo.
Pont (Bridge) :
Tika ngai na zala pamba mpo yo omonana,
Tika ngai na kita mpo yo otombwama,
Lokumu nyonso nazongisi epai na yo,
Na bomoyi na ngai nyonso, nakumisa yo…
Refrain :
Nionso ezali ya yo (ya yo Nzambe)
Nionso ewuti na yo (eh Yahweh)
Naza pamba soki ozali te
Ozali nionso pona ngai
Nionso ezali ya yo (ya yo Nkolo)
Nionso ewuti na yo (mokeli na ngai)
Makasi na ngai ewuti na yo
Bomoyi na ngai eza na yo