Couplet 1
Mobembo ezalaki pasi,
Nzela ezalaki molayi
Na bilembo mpe na mayi ya miso
Nzambe atikaki biso te
Na butu ya molili nyonso
Lokola pole, abimaki
Na tango ya komeka kondima
Ye moko akumaki biso
Chœur (Refrain – nyonso)
🎶 Tokumisi Nzambe, na mitema mobimba
Ye apesaki biso elonga
Na makasi na Ye, tobengami ba diplôme
Finaliste, mpo na ngolu na Ye 🎶
Tokumisi Nzambe, na maloba pe misala
Ye azalaki elongo na biso
Lelo tosepeli, tokumisi Ye
Nkembo nyonso epai na Ye 🎶
Couplet 2
Messieurs Mukwanga grâce, ingénieur Na B.T.P, sepela tozwi élonga, na kondima Na biso
Fostino IKIRI,merci na molende nayo
Mudzé Fariol, akangaki kivuvu Na nzambi,
Sala Jancy, motema ya kimya
Matiti robert, atikaki te Kino Na suka
Labè, Benita, molobeli ya anglais
Bazenga Falone la couturière, asalaki na mpiko
Kamaladi makelélé, mwa muding, Nzambe atambolaki na yo
Chœur (Refrain – nyonso)
🎶 Tokumisi Nzambe, na mitema mobimba
Ye apesaki biso elonga
Na makasi na Ye, totɛlɛmaki
Finaliste, mpo na ngolu na Ye 🎶
Pont (Chœur malembe / a cappella)
Ohhh…
Soki Nzambe azalaki te
Tozalaki wapi lelo?
Ohhh…
Ngolu na Ye esukani te
Ezalaka se ya seko
Dernier Chœur (fort – répétitif)
🎶 Tokumisi Nzambe (tokumisi Ye)
Tokumisi Nzambe (mpo azali malamu)
Tokumisi Nzambe (elonga ezali na Ye)
Nkembo nyonso epai na Ye 🎶
🎶 Tokumisi Nzambe, tokumisi Ye
Tokumisi Nzambe, tokumisi Ye
Finaliste lelo, batomboki lobi
Nkembo nyonso epai na Ye 🎶
Fiston kiki
Ingénieur