Yehova tosepeli
Tokumisi nkombo na yo Mpo na mapamboli, lokumu ,Opesi biso.
Ozalaki na biso N’ebandeli tii na nsuka.
Ndako etɛlɛmi, esili;
Yo nde mosungi
Totongaki n’esengo,
Tozwi mpe baninga mingi!
Makambo tomoni, tokobosana Yango te!
Elimo santu na yoEsungaki biso mpenza.
Tosepeli mingi lokola Ozwi lokumu
Yehova, ezali lokumu Kotonga ndako mpo na yo
.Tiká tókoba kosalela yo libela,
Tókumisa yo na nyonso
Yehova, ezali lokumuKotonga ndako mpo na yo.
Tiká tókoba kosalela yo libela
Tókumisa yo na nyonso
Ee Yah, kotongela yo ndako Eza’ lokumu monene!Tobondeli y’ondima yango,Ebakisa nkembo na yo.
Nyonso tokoki kopesa yo,Yango eutaka na yo.
Oyo nyonso toza’ na yango,Topesi yo na esengo.
Tata, tiká n’esika oyo,Tóya kokumisaka yo.
Bato báya kobakisama,Ematisa lokumu n’o.
Awa topesi yo ndak’oyo,Tokobatelaka yango.
Etikala pɛto, kitoko,Etatola nkombo na yo
Topesi yo esik’oyo,Báyeba nkombo na yo.
Topesi yo esik’oyo;
Tiká ondima yango.