Hommage à notre Papa
Révérend Pasteur Maswa Mbala Muyulu Willy
Pema na kimia.
Yonde tata na biso ya motema malamu,
opesa biso esengo mpe bolingo ya solo.
Na miso ya Nzambe, olakisaki biso makasi, bwanya mpe mayele.
Olakisaki biso nzela ya kimia mpe ya lobiko.
Lelo oyo, kozanga yo ezali pasi monene na motema na biso,
kasi tokobosana te maloba na yo ya mikolo nyonso :
« Bana na ngai, botambola malamu,
bolinga Nzambe mpe bolingana bino na bino.
Eloko eleki nyonso ezali Yesu.
Bozala esika moko, na bolingo mpe na kimia,
mpe Nzambe akopambola bino. »
[Refrain]
Papa, pema na kimia.
Tokobosana yo te.
Nzambe na yo akozala Nzambe na biso.
Pema na kimia, tokomonana lisusu na lola.