Na Kana ya Galilaya,
Esengo ezalaki mingi,
Bato bazalaki kobina,
Mpe Yesu azalaki wana.
Maria mama na Yesu,
Amonaki mokakatano,
Divai esilaki na feti,
Kasi Nzambe azangaka nzela te.
Maria alobaki na Yesu :
“Bango bazali lisusu na divai te.”
Yesu ayanolaki malembe :
“Ngonga na ngai ekoki naino te.”
Kasi mama atondaki na kondima,
Alobaki na basaleli nyonso :
“ nyonso akoyebisa bino,
Bosala kaka bongo.”
Yesu, Mobongoli ya bomoi,
Abongolaki mayi ekoma divai,
Na nguya na ye ya nkembo,
Atondisaki bato na esengo.
Na Kana ya Galilaya,
Bamonaki nguya ya Nzambe,
Yesu azali Mokonzi,
Mosali ya makamwisi ya solo.
Mabalasi motoba etondisamaki,
Mayi etondaki kino likolo,
Yesu alobaki : “Bokamata sik’oyo,
Bómemela mokonzi ya feti.”
Ntango amekaki yango,
Akamwaki mingi na motema,
“Divai oyo eleki nyonso,
Botiaki malamu mpo na suka!”
Esika bato balembi,
Yesu abandi kosala,
Esika elikya esili,
Nguya na ye emonanaka.
Yesu, Mobongoli ya bomoi,
Abongoli mawa ekoma esengo,
Na mabota mpe na mitema,
Atondisaka biso na bolingo.
Mokonzi ya Kana azali awa,
Azali naino kosala makamwisi,
Tika motema na yo epesa ye nzela,
Mpe okomona nkembo na Nzambe.