Eh Nzambe…
Lelo ezali mokolo ya l’amour ya solo…
Nayebisa bino lisolo na ngai na mwasi na ngai…
Ezalaki mokolo moko ya février 2013,
Na Ngaba, na cyber café ya quartier.
Yo oya kosala TP ya kelasi,
Ngai nayebaki te
que Nzambe azalaki ko sala plan ya bomoi.
Yo mwana kelasi ya MBUKU,
motema encore pur,
sourire elengi,
miso oyo ekangaka motema.
Ntango miso na biso ekutanaki,
mokili ekangamaki malembe…
Bolingo ebandaki
sans makelele.
Sarah Mushiya Mulumba,
Halashiya HBIO, bolingo na ngai,
Février 2013 ekutanisaki biso,
Nzambe akangaki biso.
Uta Ngaba kino na autel,
uta promesse kino libela,
lelo nasimbi loboko na yo
liboso ya bato nyonso.
Mwasi ya lokumu, beauté ya Afrika,
teint ya solo, sourire ya kimia.
Ozali mayele, calme, respect,
soumise na bolingo, pas na force.
Motema na yo epema bolingo,
bolingo ya solo, ya kosila te.
Yo nde kimia ya bomoi na ngai.
Sarah Mushiya Mulumba,
cadeau ya Nzambe,
ngai Héritier Kalebak,
nakomi ya yo seko na seko.
🎶 Eh Sarah… eh Halashiya…
Bolingo oyo ekokabwana te
eh Nzambe akangisi biso… 🎶
---
Lelo ezali début,
pas fin.
Bolingo ekoya kobeta malembe
kino na vie éternelle.